Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Procureur général Kabange asengi bapusa élections ya ba Sénateurs mpo na kaniaka


Maponami na Kinshasa, le 30 décembre 2018.
Maponami na Kinshasa, le 30 décembre 2018.

Procureur général ya Cour ya cassation, Flory Kabange, asengi na mokambi ya CENI kopusa maponami ya ba Sénateurs mpo likambo ya kaniaka efundami mingi.

"Nasengi nayo kopusa maponami maye mpe na kopesa ngayi nzela ya kozuwa bilembo ya solo… Bosalami ya maponami maye na lolenge liye likofungola mpenza nzela na koboyama mpe bitumba ya kufa," ekomi M. Kabange na moknda atindela Corneille Nangaa, mokonzi ya CENI.

Procureur Kabane alobi apesaki mikano na bakonzi ya police mpo na bolukiluki mpe na procureur ya Cour d’appel ya Matadi na Kongo-central likolo ya bofundami ya kaniaka maye.

Kasi likambo nde eyei makasi lisusu, kolanda maloba ya bato mindi.

Yango wana asengi bopusi ya maponami maye.

Ntango liye akopesa nzela na ba magistrats ya likolo kosangisa bilembo na makambo maye.

Elections ya ba séneateur esengelaki ezala le 14 mars.

XS
SM
MD
LG