Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Opposant Okombi Salassi bamokateli 20 ans ya misala makasi na Congo-Brazzavaille


The Duchess of York, right, holds in 1926 in London her firstborn, Princess Elizabeth, under the loving gaze of her husband, the Duke of York and future King George VI. Elizabeth was born on April 21, 1926.
The Duchess of York, right, holds in 1926 in London her firstborn, Princess Elizabeth, under the loving gaze of her husband, the Duke of York and future King George VI. Elizabeth was born on April 21, 1926.

Bazuzi ya tribunal crimminel ya Brazzaville bakateli opposant André Okombi Salissa mibu 20 ya misala makasi likolo ya mbemba ya kobebisa bokengi ya mboka.

Ekateli yango ekweyaki o’mokolo ya misato na mpokwa ntango ba sambi ya Okombi Salissa bazalaki te.

M. Okombi Salissa asambisamaki mpe lisusu mpo na komonana na minduki mpe masisi ya bitumba maye mapekisama.

Mikolo misato mipesameli ye mpo na kokende na cassation, eyebisiaki président ya Cour Christian Oba.

Zuzi liye asengi mpe lisusu ete minduki mazongisama na bakonzi mpe opposant afuta amende ya franc moko.

M. Okombi Salissa, 56 ans, azalaki moko ya baye ya kilo ya Parti congolais du travail (PCT), lingomba ya président Dennis Sassou Nguesso. Azalaki na gouvernement banda 1997 ti 2012. Kasi akendaki na opposition mpe azalaki moko ya ba candidats ya présidentielle ya 2016 liye elongamaki na président Sassou oyo avanda na bokonzi mibu 36.

XS
SM
MD
LG