Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu na Bruxelles : "le peuple d’abord! ezali kotosa mokano na ye"


Martin Fayulu, Kinshasa, RDC, 8 janvier 2019. (Facebook/Emmanuel Bikalu)
Martin Fayulu, Kinshasa, RDC, 8 janvier 2019. (Facebook/Emmanuel Bikalu)

Opposant Martin Fayulu oyo akokobi koloba ete apomanaki na RDC, asengi na bokomi na ye Bruxelles, na Belgique, ete mokano ya peuple congolais etosama.

"Ndeko na ngayi Félix Tshisekedi esengeli ayeba ete 'le peuple d’abord!' (peuple liboso!), elingi koloba ete batosa mokano ya bana ya Congo," eyanoli Martin Fayulu, na motuna moko ntango ya bokutani na ba Congolais ya libanda mpe bapanzi sango na université ya Vrije na Bruxelles.

Le peuple d’abord, ezali slogan bato bayembela president Felix Tshisekedi, , mokonzi asakolamaki na maponami ya le 30 decembre 2018.

M. Fayulu alobi ete azali "mokonzi ya mboka oyo aponami" mpe "na lelonge wana akoki te kosala na Félix Tshisekedi", oyo asakolamaki molongi ya mponami. Mpo yango "ekovanda likolo moyibi, likolo ya bilembo ba keli kokela na Corneille Nangaa (mokambi ya CENI)".

"Bakoki te to trafiquer (kobongola to koteka) mokano ya bana ya Congo," ebeti mokoloto candidat oyo asimbami na lingomba Lamuka.

Martin Fayulu akomaki na ntongo ya mokolo ya mposo na Bruxelles mpe ayambamaki na bato bayike.

​Lisolo ya mboka na biso ezali kokoma. Bana ya Congo bayebi ete bomoko na biso tokoki kokakola yango te. Tokokoba kosenga bosolo ya maponami mpo na kotonga Congo moko ya lokumu mpe ya kofulukisama, eyebisi Martin Fayulu na bokomi na ye na libanda ya pepo ya engumba mokozi ya Belgique.

Mpo na ye, mokonzi ya kala Joseph Kabila abatami na elongi ya Felix Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG