Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu akovanda te na Assemblée nationale


L'opposant Martin Fayulu lors d'un meeting à Butembo, Nord-Kivu, RDC, 15 février 2019. (Facebook/Michel Koyakpa)
L'opposant Martin Fayulu lors d'un meeting à Butembo, Nord-Kivu, RDC, 15 février 2019. (Facebook/Michel Koyakpa)

Martin Fayulu okovanda te na Assemblée nationale, eyebisi moko ya balobeli na ye Alex Dende oyo abengami lokola Lexxus Legal na lolenge ya alanga nzembo.

"Tobosana te ete Martin Fayulu azali ‘légitimement élu président de la république’ ata kutu toyebi ete ezali na ‘légalité’ te to eloko babenga ‘impérium’. Nazo te moto oyo baponi lokola mokonzi ya mboka aya kosala to kovanda na députaition. Ye ako ‘siéger' te kasi suppléante na ye Charlotte Masiala nde ako sièger," elimboli Lexxus Legal.

Kolanda Lexxus Legal, M. Fayulu atindaki mikanda na Assemblée nationale na ntina wana.

Martin Fayulu ya lingomba Lamuka aboyi bilembo maye masakolaki Félix Tshsiekedi. M. Fayulu akobi na koloba ete azali "président légitime" mpe abengi ban aya Congo kosala résistance civile.

Lexxus Legal asakoli ete Martin Fayulu na baye balandi bakosala mobembo na mokili mpo bitumba na bango ya bosolo ya maponami. Awuti kotambola na bituka biyike na RDC.

XS
SM
MD
LG