Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ramazani Shadary azali kozuwa ba candidatures ya Sénat mpe ya ba gouverneurs


Emmanuel Ramazany Shadary ntango ya maponami na Kinshasa, le 30 décembre 2018.
Emmanuel Ramazany Shadary ntango ya maponami na Kinshasa, le 30 décembre 2018.

Emmanuel Ramazani Shadary, oyo ayei na molongo ya misato na maponami ya présidentielle, azali kozuwa ba candidatures ya lingomba na ye, Front commun pour le Congo (FCC), mpona ba postes ya ba sénateurs, ba gouverneurs mpe ba vice-gouverneurs.

M. Ramazani oyo azali secrétaire permanent ya FCC ayebisi baye ya lingomba na ye ete bazali kaka na 48 heures (mikolo mibale) mpo na kotika ba candidatures na bango.

Ba candidatures yango ekotikama epayi ya Lucain Kasongo Mwadiavita, molandi ya M. Ramazani na FCC, elobi lyebisi ya Ramazani Shadary.

"FCC ekobunda kino suka mpo na kozuwa majorité nyonso. Tosili kozuwa koleka 350 élu na ba légilastives ; yango elingi koloba koleka 70% ya mabonga na Assemblée nationale. Félix Tshsiekedi, mokonzi ya mboka ya sika akosengela kosala na biso elongo. FCC nde ezali na mpifo ya kopona Premier ministre kolanda ndenge démocratie esalamaka," eyebisi moko ya balobeli ya Ramazani Shadary, Me Aimé Kilolo.

Ramazi Shadary ayaki na molongo ya misato na maponami ya mokonzi ya mboka, na nsima ya Félix Tshisekedi, molongi na 38,5%, mpe ya opposant mosusu Martin Fayulu (34,7%).

Martin Fayulu aboyi ba résultats maye CENI sakoli mpe akotisi recours na Cour constitutionnelle.

XS
SM
MD
LG