Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu atiki recours na ye


Martin Fayulu na mwasi na ye, Esther, na libanda ya Cour constitutionnelle, Kinshasa, 12 janvier 2019.
Martin Fayulu na mwasi na ye, Esther, na libanda ya Cour constitutionnelle, Kinshasa, 12 janvier 2019.

Opposant Martin Fayulu akotisi recours na ye liboso ya Cour constitutionnelle mpo na koboya ba résultats provisoires ya présidentielle CENI esakoli maye mabimisi Félix Tshisekedi molongi na koleka 38%.

"Bosengi na biso mozali ete ba kweyisa ba résultats maye mabimisi Félix Tshisekedi président ya mboka," ayebisi Me Toussaint Ekombe, moko ya ba avocats ya candidat Fayulu.

Avocat liye alobi te "besengi ekotisamaki o’mokolo ya mitano mpe lelo (mposo) toyei kozuwa ba récépissés".

M. fayulu akanisi tee mokambi ya CENI Corneille Nangaa atambolaki likolo ya mobeko likonzi ya mboka. Oppsant oyo akinisi ete bosola ya maponami ekobima na botangi lisusu ya babulletins de vote.

XS
SM
MD
LG