Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Martin Fayulu aboyi kondima ba résultats


Opposant Martin Fayulu, Kinshasa, RDC, 10 janvier 2019.
Opposant Martin Fayulu, Kinshasa, RDC, 10 janvier 2019.

Martin Fayulu, candidats mosusu ya opposition, oyo aye na nsima molinga ya maponami Félix Tshisekedi, alobi andimi te ba résultats oyo CENI epimisi.

"Ezali soni tee bato basangana mpo koyiba elonga ya bana ya Congo. Ezali soni mingi kokonisa ete ezali opposition nde ekoti na moyibi oyo. Tolobi, ezali malamu te. Tokondima ba résultats oyo te lokola CENCO mpe endimi te ba résultats maye ekokani te na oyo bango bamonaki na suka ya maponami," ebeti sete Martin Fayulu.

Candidat ya Lingomba Lamuka alobi "akosalela lolenge nyonso mpo na te bana ya Congo bazuwa elonga ya solo".

Abengi bana ya Congo "kotelema mpo te bayibela bango elonga na bango te".

Mokambi ya CENI, Corneille Nangaa, asakolaki na butu ya mokolo ya mineyi moleki tee mokambi ya lingomba ya UDPS alongi maponami ya mokonzi ya mboka na koleka 38%. Mpe taux ya participation mozalaki koleka 47%. Toyoka Félix Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG