Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Peter Tibor Nagy akutani na basungi ya Tshisekedi

Sous-secrétaire d’Etat ya ekolo ya Amerika mpo na mambi ya Afrika, Peter Tibor Nagy, na kati kati, na directeur de cabinet ya président Félix Tshiskedi, (gauche), na Kinshasa, RDC, 14 mars 2019. (Twitter/Ambassade des Etats-Unis à Kinshasa

Sous-secrétaire d’Etat ya ekolo ya Amerika mpo na mambi ya Afrika, Peter Tibor Nagy, asololi na basungi ya likolo (ba Hauts Conseillers) ya président Félix Tshisekedi baye bakambamaki na Vital Kamerhe, directeur ya cabinet ya mokonzi ya mboka.

Peter Tibor Nagy azali na mobembo na RDC. Asaloli ndenge nini kokolisa boyokani na gouvernement ya mokonzi ya sika ya RDC, Félix Tshisekedi

Akutanaki mpe na baye ya société civile mpe basalolaki mpo na nzela ya kopesa maboko na M. Tshisekedi.

Azalaki lobi na Goma epayi wapi apesaki koleka 1.800 tonnes ya bilei mpe bisaleli ya komibatela ntango ya kopesa mino na babeli ya Ebola.

M. Nagy esengeli akutana na mokonzi ya ekolo Félix Tshisekedi.

Sous-secrétaire d’Etat ya ekolo ya Amerika mpo na mambi ya Afrika alobaki mposo ete ekolo na ye esepeli kosala na gouvernement ya mokonzi abimi na maponami ya RDC, Félix Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG