Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kabila asangisi ba députés koleka 330 na Kingakati


Joseph Kabila, nkumu ya FCC (Front commun pour le Congo) azali kopesa mbote na baye ya lingomba na ye na Kingakati, Kinshasa, le 24 fevrier 2019. (Twitter/Jean Pierre Kayembe)
Joseph Kabila, nkumu ya FCC (Front commun pour le Congo) azali kopesa mbote na baye ya lingomba na ye na Kingakati, Kinshasa, le 24 fevrier 2019. (Twitter/Jean Pierre Kayembe)

Ba députés bazalaki koleka 330 na bokutani ya mokolo ya eyenga na Joseph Kabila, président abimi na bokonzya i, na ferme na ye Kingakati na suka ya Kinshasa.

Baye bazalaki na bokutani liye balobi ete M. Kabila asengi bango kokoba bitumba mpo na bonsomi ya mboka.

Nehemie Mwilanya, directeur ya cabinet ya kala M. Kabila mpe coordonateur ya Front commun pour le Congo (FCC), moko kati na ba députés baponami mpo na lingomba liye, alobi ete bakendaki kolakisa mbuta ya mosala basalaki.

M. Mwilanya akundoli ete FCC ezali lingomba eleki na ba députés (koleka 330 na Assemblée nationale mpe 800 na ba provinciales.

Bokutani liye esalami mikolo minei nsima ya bokutani mosusu ya FCC nzinga nzinga y aya M. Kabila.

Baye ya FCC bazali komilakisa lokola majorité mpe kosenga été mokonzi ya mboka ya sika Felix Tshisekedi apona Premier ministre kati na bango.

XS
SM
MD
LG