Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Union européenne mpe Union africaine bapesi maboko na Félix Tshisekedi


Felix Tshisekedi,molongi ya présidenitlelle, na Kinshasa, 10 janvier 2019.
Felix Tshisekedi,molongi ya présidenitlelle, na Kinshasa, 10 janvier 2019.

Union africaine (UA) mpe Union européenne (UE) bandimi kosala na président Félix Tshisiekedi, eyebisi lelo na Bruxelles ba ntoma na bango.

Mangomba maye bazalaki na ntembe mingi likolo ya ba résultats ya présintielle CENI ebimisaki, maye masokalaki Félix Tshisekedi molongi na 38,57%. Kasi bandimi mokano ya Cour constitutionnelle oyo akataki likambo o’mokolo ya eyenga moleki.

"Tomibongisi mpo na kosala na président Félix Tshsiekedi mpe na ngambo nyonso ya ban aya Congo," elobi ntomaya UA, Smail Chergui, liboso ya balangisi sango.

Na ngambo na ye, mokambi ya diplomatie ya UE, Mme Federica Mogherini ayibisi ete UE ezuwi note (emoni) ya ba résultats. "Esengeli président azala mosangisi mpe andima kosolola na bato nyonso kati mboka na ye," epesi toli Mme Moghirini.

XS
SM
MD
LG