Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Union africaine esengi na Cour constitutionnelle etelemisa mokano na yango


Président Paul Kagame ya Rwanda mpe mokambi ya Union africaine na bokutani na Addis Abeba, Ethiopie, 17 janvier 2019.
Président Paul Kagame ya Rwanda mpe mokambi ya Union africaine na bokutani na Addis Abeba, Ethiopie, 17 janvier 2019.

Union africaine esengi na Cour constitutionnelle ya RDC etelemisa naino mokano na yango ya suka mpo na maponamiy ya président. Mbela yango ebwakami na bokutani ya bakonzi ya bikolo mpe ya ba gouvernement basanganaki na Addis Abeba, na Ethiopie.

Bakonzi ya bikolo baye balobi ete "ntembe mingi mozali na bosolo ya ba résultats" CENI esakolaki, maye mabimisi Felix Tshisekedi molongi na 38,57%.

Bakonzi baye bakotinda lipinga moko na Kinshasa koya kosolola na ngambo nyonso ya baye politiki o’mokolo ya lundi mokoya.

Bokutani ya likolo liye lisangisaki bakambi ebele lokola président Paul Kagame ya Rwanda mpe mokambi ya Union africaine na bakambi ya CIRGL (Conférenceinternationale sur la région des Grands Las) mpe na SADC (Lisanga ya ntombwa ya bamboka ya Afrika ya Ngele too ya Sudi).

Cour constitutionelle ekotaki kinzozi mpo na kotala bosenga ya Martin Fayulu oyo aboyaki ba résultats ya CENI mpe akotisaki recous na Cour constitutionnelle.

Fayulu asengengi kobandela kotanga bilembo nyonso bureau ya vote na bureau ya vote too kobwakisa ba résultats nyonso.

Cour constitutionnelle ekoki kopesa mokano na yango ya suka lelo too o'mokolo ya yambo ya mposo.

XS
SM
MD
LG