Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi azongisi $163.000 nsima ya mobembo na ye


Président Félix Thsisekedi na bokutani na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 19 février 2019. (Tiwtter/Présidence RDC)
Président Félix Thsisekedi na bokutani na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 19 février 2019. (Tiwtter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi azongisi na Banque centrale $163.000 nsima ya mobembo na ye, elakisi mikanda ya Banque centrale VOA Lingala emonaki.

Mikanda yango elakisi motango nini mokonzi ya sika asalelaki te kasi kaka mosolo ye azongisi omokolo ya le 19 février 2019 na Banque centrale.

Na mobembo na ye M. Tshisekedi akendaki mposo mibale mileki na Angola, Kenya, Congo-Brazzaville mpe na sommet ya bakonzi ya Union africaine na Addis-Abeba, na Ethiopie.

Bordeaux retour Tshiskedi
Bordeaux retour Tshiskedi

Na lisolo ya RDC, bozongisi mosolo na bakonzi ezalaki kosalema mingi ntango ya président Joseph Kasa-Vubu na Premier ministre na ye Patrice Emery Lumumba.

Félix Tshisekedi na bozuwi bokonzi na ye alobaki akobundisa kaniaka liye ekoma bokono ya mboka RDC.

XS
SM
MD
LG