Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi apesi mitindo ya kabobimisa bato ya boloko


Le président Félix Tshisekedi na Kinshasa, RDC, 15 février 2019. (Twitter/Présidence RDC)
Le président Félix Tshisekedi na Kinshasa, RDC, 15 février 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Directeur ya cabinet ya president Félix Tshisekedi, Vital Kamerhe asakoli, mercredi na butu na télévision ya l’Etat, ngolu ya mokonzi ya mboka mpo na kobimisa pene na 700 bato ya boloko.

Kati na bato ya boloko baye bazuwi ngolu liye, nkombo ya opposant Franck Diongo mpe défenseur des droits de l’homme, avocat Firmin Yangabi etangami.

Eugène Diomi Ndongala, opposant oyo atangamaki na boyokani ya politiki ya le 31 décembre 2016, yambo ya maponami, atangami te. Kasi M. Kamerhe alaki été président Tshisekedi nde azuwi meko ya kobimisa ye na nsima.

Président Tshisekedi azuwi mpe meko likolo ya ministre ya Affaires foncières, Lumeya Dhu Maleghi. Etumbu yango esengi balongola ministre liye mpe balandela ye na nzela ya bosembo.

Bakambi ya compagnies ya l’Etat bayike mpe bazuwi etumbu.

XS
SM
MD
LG