Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi alaki gouvernement kala te kasi aboyi kozala président azanga mpifo


Président Félix Tshisekedi ya RDC apesi mbote na mokokani wa ye ya Namibie HAge Geingob na bokutani na Windhoek (Namibie), le 26 février 2019. (Twitter/ Présidence Rép. Namibie)
Président Félix Tshisekedi ya RDC apesi mbote na mokokani wa ye ya Namibie HAge Geingob na bokutani na Windhoek (Namibie), le 26 février 2019. (Twitter/ Présidence Rép. Namibie)

Mokonzi ya sika ya RDC alobi na bokutani na diaspora ya mboka na ye na Windhoek (Naimibie) ete gouvernement ekosalama na mikolo makoya kasi ye aboyi kozala mokonzi oyo azanga mpifo.

"Ezali na lingomba oyo ezali koloba ete eleki na bato mingi, tozali kozela mpo koyeba yango na ndenge esengeli mpo kondima majorité wana, nsima tokosolola na bango mpamba te nakondima te kozala kaka mokonzi oyo avandi na kiti kasi azangi mpifo," eyebisi Félix Tshsiekedi.

Sanza moko esi eleki banda Tshiskedi akomaki mokonzi kasi gouvernement ya kala ezali naino na esika mpe kosala mosala na kozelaka engunduka ya sika.

Koswana ezali likolo ya botiyami ya gouvernement. Front commun pour le Congo (FCC), lingomba ya Joseph Kabila mokonzi abimi na bokonzi elobi ete ezali na majorité parlementaire na koleka ba députés 350 likolo ya 500 baye bazelami, ndenge moko mpe na ba assemblées provinciales.

Baye ya FCC bazali kosenga Primature mpe elobi ete ntina ya koluka koyeba majorité mosusu ezali te mpo esi eyebani.

Mobeko likonzi ya Congo elobi mokonzi ya mboka akotiya "informateur" mpo koluka majorité. Nsima, mokonzi akotiya "formateur" mpo na kosala gouvernement kolanda masolo na majorité.

Na bokutani na diaspora, M. Tshisekedi alobi mpe ete apekisi ba forces de l’ordre kokanga baye bakotonga ye. Mpamba te, ata bana ya Congo mingi baponaki ye, bayike basusu baponaki ye te.

Alobi mpe akotiya mokoloto na bilenge na bokambi na ye.

M. Tshisekedi alongwaki Windhoek nsima na yango mpe azongaki na Kinshasa.

XS
SM
MD
LG