Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Président Trump apekisi mpepo Boeing 737 Max 8 na 9 kopumbwa


Mokonzi ya Etats-Unis Donald Trump na libanda ya Ndako ya bembe, Washington, 8 mars 2019.
Mokonzi ya Etats-Unis Donald Trump na libanda ya Ndako ya bembe, Washington, 8 mars 2019.

Mokambi ya ekolo Amerika apesi mitindo ete mpepo Boeing 737 MAX 8 na MAX 9 nyonso kopumbwa nsima na likama ya Ethipion Arilines liye libomaki bato 157 na ntongo ya mokolo ya eyenga moleki.

"Tozuwi mokano ya kopekisa mibembo ya mpepo 737 MAX 8 mpe 737 MAX 9 ," esakoli M. trump kowuta Maison Blanche na Washington.

"Bokengi ya bana ya Amerika mpe ya bai mibembo minso ezali likambo ya motuya koleka mpo na biso," ebakisi mokambi ya ekolo Amerika.

Ba mboka ebele ezwaki mobeko ya kopekisa ba vols ya Boeing 737 MAX 8 nsima ya likama ya lomingo loleki .

Mpepo 737 MAX 8 ya Ethiopian Airlines liye lizuwaki likama o’mokolo mwa lomingo lizali mpepo ya ibale ya lolenge wana mpo ya kokweya kobanda sanza ya zomi na mobu moleki.

Liboso na Etats-Unis, Canada mpe ezuwaki mokano nse moko wana ya kopekisa mpepo ena.

XS
SM
MD
LG