Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pene na 70 ex-combattants ya M23 bazongi kowuta na Ouganda


Ba ex-combattants ya M23 na bozongi na bango kowuta Ouganda na aéroport ya Goma, Nord-Kivu, le 26 février 2019. (VOA/Charly Kasereka)
Ba ex-combattants ya M23 na bozongi na bango kowuta Ouganda na aéroport ya Goma, Nord-Kivu, le 26 février 2019. (VOA/Charly Kasereka)

Pene na 70 ex-combattants ya M23, Mouvement ya le 23 mars, bazongisami na Goma na RDC kowuta Ouganda esika wapi bobombamaki.

Bakomaki na aéroport ya Goma na mabota mpe baye bavandaka na bango.

Basi na baye bavandaka na ex-combattants ya M23 na bozongi na bango kowuta Ouganda, na aéroport ya Goma, Nord-Kivu, 26 février 2019. (VOA/Charly Kasereka)
Basi na baye bavandaka na ex-combattants ya M23 na bozongi na bango kowuta Ouganda, na aéroport ya Goma, Nord-Kivu, 26 février 2019. (VOA/Charly Kasereka)

Ezalaki na ngonga ya 11 heure nde ba kitaki na avion ya Monusco, mission ya onu na RDC.

Bayambambamaki na commandat ya 34e région militaire, mpe ba ntoma ya mécanismes national ya suivi ya accord cadre, na ba ntoma ya ba organisations régionales lokola SADC, CIRGL, Union africaine mpe ONU.

Ba oyo bakomi na vague ya mardi bazali mobota 70 ya ba ex combatans kasi baye na ndambo ya ba dépendants na bango, neti bana na basi na bango ko wuta mboka Ouganda esika bazalaki wuta 2013.

Ba ex-combattants ya M23 na bozongi na bango kowuta Ouganda na aéroport ya Goma, Nord-Kivu, le 26 février 2019. (VOA/Charly Kasereka)
Ba ex-combattants ya M23 na bozongi na bango kowuta Ouganda na aéroport ya Goma, Nord-Kivu, le 26 février 2019. (VOA/Charly Kasereka)

Molobeli ya mapinga ya Congo, officier Njike Kaiko alobi na micro ya VOA lingala, ete baye bakomi mardi, baye bango na bolingi na bango moko, mpe soki ba misusu balingi bakokota na mampinga ya RDC (FARDC) mpe na oyo balingi te bakozonga na vie civile.

Ebele koleka baoyo bazongi nde batikali na mboka Ouganda mpe na Rwanda.

XS
SM
MD
LG