Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Massacre ya Yumbi ekoki kozala crime contre l’humanité, kolonda ONU


Ndako ya CENI (Commission électorale nationale indépendante) ebebisami na Yumbi, Maï-Ndombe, décembre 2018. (Monusco)
Ndako ya CENI (Commission électorale nationale indépendante) ebebisami na Yumbi, Maï-Ndombe, décembre 2018. (Monusco)

Bobomi na bato liye lisalamaki na Yumbi na Maï-Ndombe ekoki kozala crime contre l’humanité, eyebisi ONU to mabongisi ya lisanga ya bamboka ya molongo.

ONU etindaki mission ya enquête kobanda le 17 ti le 26 janvier 2019 na Yumbi, esika wapi bato 535 bakufaki na bitumba mpe 111 bazokaki na bobobami liye.

Rapport ya ONU etalisi ete Batende babomaki Banunu mpo na koboya bokundami ya nkumu ya Banunu na mabele ya Yumbi esika wapi bacommunautés mibale maye bavandaka.

Ba attaques minei masalamaki na Yumbi, Bongende mpe Nkolo, eyebisi ONU.

Koleka ndako 967 ebebisamaki, ndako ya nzambe zomi na minei mpe etumbamaki.

ONU elobi bakataki nzoto ya bato, basi mpe bana mike, mpe bazindisika na mayi bana mike basusu, yango nde ekoki kozala crime contre l’humanité.

XS
SM
MD
LG