Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Luzolo Mbambi afundi kaniaka ya ba députés nationaux epayi ya Procureur général


Bakeli na mibeko na Assemblée nationale, na Palais du peuple, Kinshasa, 28 janvier 2019.
Bakeli na mibeko na Assemblée nationale, na Palais du peuple, Kinshasa, 28 janvier 2019.

Conseiller ya mokonzi ya mboka ya kala mpo na mambi kobumndisa kaniaka asengi information judiciaire likolo ya kaniaka na pa deputes provinciaux mpo na maponami ya ba Sénateur, gouverneur mpe vice-gouverneurs.

Luzolo Mbambi akomeli procureur général près ya Cour ya Cassation mpo na kofunda kaniaka na pa députes provinciaux mpo na maponami ya ba Sénateurs, gouverneurs mpe vice-gouverneurs.

Alobi azwi ba informations mpe amibongisi na kopesa yango na procureur.

Ye moko mpe alongoli na ntina na yango candidature na ye mpo na maponami ya ba Sénateurs ya province ya Kongo Central.

Bato bayike basusu mpe balongoli candidatures na bango nse mpo nakoboya kaniaka. Kati na bango, mosungi ya président ya Tshiskedi, Vidiye Tshimanga na Adam Bombole.

Tokundala te ECC Eglise du Christ ya Congo apamelaki kaniaka liye mposo moleki na elobeli ya VOA Lingala.

XS
SM
MD
LG