Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kobendana likolo ya ba décrets ya PM Tshibala mpo na ba anciens membres du gouvernement


Ministre wa yambo ya République démocratique du Congo, Bruno Tshibala na cathédrale ya centenaire, na Kinshasa, 16 janvier 2018.
Ministre wa yambo ya République démocratique du Congo, Bruno Tshibala na cathédrale ya centenaire, na Kinshasa, 16 janvier 2018.

Ministre près ya Premier ministre, Tshibangu Kalala, alobi ba décrets ya PM Bruno Tshibala matali ba avatanges mpe ba devoirs ya ba anciens membres du gouvernement mazali te mpo ko mvuamisa bango.

"Mikano ya PM mazali kolanda nzela ya politiki ya mboka na biso ya kotiya Etat moko ya sembo, Etat social, Etat généreux mpo na bana ya Congo baye basali mpo na mboka na niveau moko ya mikumba," eyebisi M. Tshibangu Kalala oyo abengi ba avantages wana "raisonables mpe modestes" (maye makoki kondimama mpe ya koleka ndelo te).

Anyati sete ete mikano ma ye mazali kolanda malako lokola minimum vital (makoki masengeli) mpe makoki te komvuamisa baye babimi na gouvernement.

Mpo na ye, mokambi ya gouvernement atie kaka na code mabongisi oyo ewutaki na Parlement, mingi mpenza projet ya loi ya Modeste Mutinga.

Ba décrets gouvernement ya sika mpe maye makoya na nsima.

Kasi bayike basepeli ya decrets ya mobeko ya Bruno Tshaibala, mingi mpeza kati na Societe civile.

Tolanda mokambi ya ACAJ, Association pour l’acces a la justice, George Kapimba.

Mpo na ye ba avantages ya baye gouvernement ezali déjà kati ya ordonnance ya président ya république.

Ordonnance yango epesi bango montango oyo ekokani na sanza motoba ya salaires na bango ya suka.

XS
SM
MD
LG