Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kimbuta andimi meetingi ya Fayulu le 2 février na Ste Thérèse


Opposant Martin Fayulu na conférence de presse, na Kinshasa, le 18 janvier 2019.
Opposant Martin Fayulu na conférence de presse, na Kinshasa, le 18 janvier 2019.

Gouverneur ya engumba Kinshasa, André Kimbuta, apesi nzela na meetingi ya Martin Fayulu mpe lingomba Lamuka oyo ekosalema o’mokolo ya le 2 février na place Ste-Thérèse na Kinshasa.

M. Kimbuta asengi na baye ya Lamuka bayokana na mokonzi ya police ya Kinshasa mpo na kobongisa lolenge nini bokengi ekosalema.

"Martin Fayulu alingi amonisa polele ndenge nini Corneille Nangaa na Céni basalaki ye nko mpe bayibi ye elonga na maponami," eyebisi na VOA Lingala, moko na balobeli ya Lamuka, Joseph Mabanga.

Lamuka ewangani mpe eboyi basango nyonso maye bazali kotambola na ba réseaux sociaux koloba ete meetingi ekosalame te.

"Soki baninga ya AR (Alternance pour la république) bakeyi kopesa maboko na Félix Tshisekedi ezali choix na bango. Kasi biso tozali kobunda mpo na ‘vérité des urnes’, " ebakisi M. Mbanga.

Mpo na ye, ezali démocratie.

M. Fayulu aboyi ba résultats ya Céni mpe ya Cour constitutionnelle maye masakolaki Félix Tshisekedi mokonzi na 38,57%. M. Fyulu azali komitala lokola "président légitime" mpe asengi bana ya Congo baboya kotosa bokonzi ya Tshsiekedi.

XS
SM
MD
LG