Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Katumbi akutani na ntoma ya Amerika na région ya Grands Lacs


Ntoma ya Etats-Unis mpo na région des Grands Lacs, Peter Pham, na gauche, na Moïse Katumbi bakutani na Bruxelles, Belgique, le 28 février 2019. (Twitter/Ensemble pour le Changement)
Ntoma ya Etats-Unis mpo na région des Grands Lacs, Peter Pham, na gauche, na Moïse Katumbi bakutani na Bruxelles, Belgique, le 28 février 2019. (Twitter/Ensemble pour le Changement)

Opposant Moïse Katumbi oyo azali exilé, akutani na ntoma ya sika Amerika na région ya Grands Lacs, Peter Pham, jeudi na Bruxelles.

Mpo na lingomba Ensemble pour le changement ya M. Katumbi bokutani liye ezalaki "échange productif likolo ya situation politique ya RDC," elobi liyebisi etiyami na Twitter.

M. Pham akutanaki lundi na Kinshasa na président ya sika Félix Tshisekedi mpe apesaki ye losako mpo na boponami na ye.

"Etats-Unis etelemi pembeni ya bana ya RDC nsima ya transfert historique mpe ya kimya ya bokonzi," elobaki M. Pham lundi nsima ya bokutani na Tshisekedi.

"Tozali impatients na ko coopérer na équipe ya sika oyo amibongisi mpo na komema liboso ba valeurs communes. Bopekisi ya ba visa ya Etats-Unis maye masakolamaki ntango ya mobembo na biso, ezali kokende na nzela ya engagement ya président Tshisekedi mpo na kosilisa kaniaka, komema mboka na kokende liboso na droits de l’homme mpe kokomisa démocratie makasi na RDC," ebakisaki M. Pham.

Mposo eleki, Etats-Unis ezuwaki meko ya kopekisa mokonzi ya CENI, Coreneille Nangaa, molandi wa Norbert Basengezi, mokambya kala ya Assemblée nationale Aubin Minaku mpe président ya Cour constitutionnelle, kokotana na mabele ya Amerika likolo ya kaniaka monene na ntango ya maponami.Lwamba Mbindu.

Ntoma ya Amerika akutaki mpe Martin Fayulu, opposant oyo aboyi elonga ya Tshisekedi na maponami.

Baye ya société civile, baye ya politiki mosusu mpe ya gouvernement mpe basololaki na ye na Kinshasa.

XS
SM
MD
LG