Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu na Butembo, Beni vendredi mpe na Goma, lundi


Martin Fayulu na mwasi na ye, Esther, na libanda ya Cour constitutionnelle, Kinshasa, 12 janvier 2019.
Martin Fayulu na mwasi na ye, Esther, na libanda ya Cour constitutionnelle, Kinshasa, 12 janvier 2019.

Martin Fayulu akosala mitingi na mokolo ya minei na Butembo mpe Beni mpe lundi, na Goma, na province ya Nord-Kivu, eyebisi baye ya lingomba Lamuka liye masimbaki ye na maponami.

"Eyebani na moto nyonso ete Kabila aboyaki maponami masalama na Beni mpe Butembo mpo été Martin Fayulu alonga te na maponami. Ata bongo, ban aya Congo nyonso bayebi ete baponaki M. Fayulu bisika nyonso, alongaki na ptovince 20 yango alingi kokende kopesa ba Congolais longonya," eyebisi député ya Lamuka Mohindo Nzangi.

Mpo na ye, M. Fayulu azali na légitimité ya kati mboka. Yango epesi crise ya légitimité.

"Martin Fayulu azali na ba propositions alingi asala na bana ya Congo mpo kozala na kimya. Alingiki mpe koyebisa bana ya Congo ndenge nini kosala résitance na nzela ya kimya soki boyakani ezali te," elobi M. Mohindo.

M. Fayulu asali mitingi wa ye ya yambo le 2 février na Kinshasa liboso ya bituluku ya bato na place Ste Thérèse, na N'Djili.

Azali kino sikoyo koboya ba résultats maye Cour constitutionnelle endimaki, maye masakolaki Félix Tshisekedi molongi na 38,57% mpe président élu.

Amemaki makambo mango na Cour africaine ya droits de l'homme mpe ya bato.

XS
SM
MD
LG