Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu amisakoli president mpe asengi na ba Congolais kondima Tshisekedi te


Martin Fayulu na libanda ya Cour constitutionnelle, Kinshasa, 12 janvier 2019.
Martin Fayulu na libanda ya Cour constitutionnelle, Kinshasa, 12 janvier 2019.

Martin Fayulu amisakoli mokonzi ya mboka na nsima ya Cour constitutionnelle oyo endimi Felix Tshsekedi lokola molongi ya maponami mpe president ya mboka RDC.

"Na sengi na peuple congolais endima te moto nyonso oyo akomipesa mpifo wana ata asengeli te mpo na kotelema ma esika ya bana Congo. Na sengi na bana ya Congo balanda te moto nyonso akomipesa mpifo liye ata asengeli te mpe koboya kotosa mikano ekowuta na moto oyo, " elobi Martin Fayulu liboso ya bapanzi sango kati na butu ya mposo na yenga.

Mwa ntango yambo na yango, Cour constitutionnelle esakolaki Felix Tshsekedi molongi ya maponami nsima ya koloba ete Martin Fayulu apesi bilembo te maye makolakisa ete alongaki.

Fayulu aboyaki ba résultats CENI maye matiyaki Tshisekedi molongi na 38,57%.

Fayulu alobaki ete ye nde alongaki na koleka 60%. Ba episkopo mpe balobi ete bilembo ya CENI makokani te na bosolo.

Bakonzi ya bikolo mpe ya ba gouvernements ya Union africaine maye basanganaki na Addis Abeba o’mokolo ya minei basengani na Cour constitutionnelle kotelemisa naino mokano na yango ya suka mpo "ntembe ezalaki mingi likolo ya bosolo ya ba resultats".

Cour constitutionnelle ezeli te ata lipinga liye Union africaine alobaki ekotinda na RDC o’mokolo ya yambo ya mposo mokoya mpo na kosolola likambo yango.

Na lisakoli na ye, Fayulu asengi na communauté internationale endima te bokonzi liye ezangi légitimité na mpifo ya kolakisa elongi ya bana ya Congo.

XS
SM
MD
LG