Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Félix Tshisekedi na Angola mpo na mobembo wa ye wa yambo


Mobembo wa yambo ya Félix Tshisekedi
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:00:39 0:00
Télécharger

Mobembo wa yambo ya Félix Tshisekedi

Président Felix Tshsiekedi akomi lelo na Luanda na Angola epayi wapi asali mobembo mwa ye ya yambo lokolo Tata mokonzi ya ekolo RDC, nsima ya maponami ya le 30 décembre 2018 oyo asakolamaki molongi.

Akutani bongo na moninga na ye João Lourenço, mokambi ya ekolo Angola oyo akitanaki na Jose Edourado dos Sandos na septembre 2017.

​Na bokomi na ye, M. Tshisekedi ayambami na bato bayike baye batanda na zela mpo nakopesa ye losako.

Angola na RDC bazalaka na boyakani mpe bondeko ya kala kasi balinga bakomisa yango makasi.

Nsima na Angola, Félix Tshsiekedi nde akeyi na Kenya epayi wapi akukokutana na mokonzi ya ekolo liye, Uhuru Kenyata. Ye azalaki bobele mokonzi moko ya ba mboka ya bapaya oyo azalaki na milulu ya kolapa ndai ya Félix Tshisekedi le 24 kanvier moleki.

Tokundola ete Lingomba liye momaki Felix Tshisekedi na maponami, CASH (Cap pour le changement) mobotamaki na Nairobi engumba mokonzi ya Kenya. Esalamaki Elongo na Vital Kamerhe Mokonzi ya sika ya cabinet ya Felix Tshiskedi.

Na suka na mobembo liye, Felix Tshisekedi nde ekeyi na Congo Brazzaville yambo na bozongi na Kinshasa.

XS
SM
MD
LG