Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Félix Tshisekedi akutani na Paul Kagame


Félix Tshisekedi, président ya RDC (na loboko ya mwasi) na mokokani wa ye ya Rwanda Paul Kagame, na Addis Abeba, Ethiopie, 11 février 2019. (Facebook/Fatshi News)
Félix Tshisekedi, président ya RDC (na loboko ya mwasi) na mokokani wa ye ya Rwanda Paul Kagame, na Addis Abeba, Ethiopie, 11 février 2019. (Facebook/Fatshi News)

Président Félix Tshisekedi ya RDC asololi na Paul Kagame ya Rwanda na Addis Abeba, ntango ya 32e session ya Union africaine na Addis-Abeba, n’Ethiopie.

Bakonzi ya bamboka oyo ekangama kasi ezalaka na bondeko ya matata babeti masolo koleka ngonga mibale.

Kigali etielaka RDC matata mpo na bozali ya babundi ya FDLR baye bazali na mabele ya mboka Congo. Kasi Kinshasa efundaka bakonzi ya Rwanda kozwa bomengo ya mabele ya Congo mpe koluka kobotola ndambo ya mabele maye.

Na kokambama na Paul Kagame, UA esengaki ete Cour constitutionnelle ezelisa nain oba résultats mpo ntembe mozalaki mingi.

Kasi ba zuzi bazelaki te mpe ba bdimaki Félix Tshsiekedi lokola mokonzi ya mitano ma RDC nsima ya maponami ya le 30 décembre.

Martin Fayulu, moko na ba candidats ya opposant aboyi mokano liye mpe alobi yen de azali mokonzi ya mboka.

Paul Kagame atikeli ebinga wa ye ya président en exercice ya UA na mokonzi ya Egypte na Abdel Fattah al-Sissi ya Egypt, oyo aponami na bokutani ya Addis Abeba.

XS
SM
MD
LG