Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Félix Tshisekedi akotiama na bokonzi jeudi na 12 heures


Félix Tshisekedi mokolo ya boyokani na Vital Kamerhe mpo kosala lingomba ya maponami CASH (Cap pour le changement, na Nairobi, Kenya, 10 janvier 2019.
Félix Tshisekedi mokolo ya boyokani na Vital Kamerhe mpo kosala lingomba ya maponami CASH (Cap pour le changement, na Nairobi, Kenya, 10 janvier 2019.

Milulu ya botiami na bokonzi ya Félix Tshisekedi makosalema o’mokolo ya minei na Palais de la nation, eyebisi baye ya présidence ya république na VOA Lingala.

"Ekosalema jeudi na 12 heures," elobi Barnabée Kikaya Bin Karubi, mosungi ya président Kabila mpo na mambi ya ba mboka ya bapaya.

Mosungi mosusu ya président Kabila mpe andimi yango mpe abakisi ete mlilulu maye makosalema na Palais de la nation.

"Bato nyonso bakomona bopesani ya bokonzi ya bato bakola (civilisé) mpe na kimya nyonso," ebakisi moko ya présidence.

Pene na bakonzi zomi ya mboka ya Afrika bakozala wana, kolanda na maloba baye basololi na VOA Lingala.

XS
SM
MD
LG