Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Félix Tshisekedi, 2e vice-président ya Union africaine


Félix Tshisekedi, mokonzi ya RDC, na 32e session ya Union africaine na Addis-Abeba, Ethiopie, 10 février 2019. (Twitter/Présidence RDC
Félix Tshisekedi, mokonzi ya RDC, na 32e session ya Union africaine na Addis-Abeba, Ethiopie, 10 février 2019. (Twitter/Présidence RDC

Mokonzi ya sika ya RDC, Félix Tshsiekedi, akomi 2e vice-président ya Union africaine.

Aponami na bakokani waye ya ba mboka ya Afrika baye basanganaki wuta mokolo ya mposo na 32e session ya Union africaine na Addis-Abeba, n’Ethiopie.

Akutanaki na masolo na Abdel Fattah al-Sissi ya Egypte, oyo aponami lokola président en exercice ya UA mpe azuwi esika ya Paul Kagame ya Rwanda. Masolo mpe ezalaki na président ya Afrika ya Ngele (Afrique du Sud) oyo aponami 1e vice-président ya UA.

Na kokambama na Paul Kagame, UA esengaki ete Cour constitutionnelle ezelisa naino ba résultats mpo "ntembe mozalaki mingi".

Kasi ba zuzi bazelaki te mpe ba bandimaki Félix Tshsiekedi lokola mokonzi ya mitano ya RDC nsima ya maponami ya le 30 décembre.

Martin Fayulu, moko na ba candidats opposant aboyi mokano liye mpe alobi yen de azali mokonzi ya mboka.

XS
SM
MD
LG