Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Félix Tshisekedi na Sassou N’guesso bandimi kokolisa bondeko ya ba Congo mibale


Président Denis Sassou N'Guesso ya Congo ayambi mokokani wa ye ya RDC Félix Tshisekedi, na Brazzaville, le 7 février 2019. (Facebook/Fatshi News)
Président Denis Sassou N'Guesso ya Congo ayambi mokokani wa ye ya RDC Félix Tshisekedi, na Brazzaville, le 7 février 2019. (Facebook/Fatshi News)

Président ya sika ya RDC, Félix Tshisekedi, na mokokani wa ye ya Congo-Brazzaville, Denis Sassou N’guesso, balobi na liyebisi ete bandimi kokolisa bondeko kati bikolo mibale maye.

Liyebisi yango ezali elembo ya suka na mobembo ya mikolo mibale ya M. Tshisekedi na Brazzaville.

"Bakonzi mibale basengi bosalemi na mobu 2019 ya 12e session ya Grande Commission mixte kati na République ya Congo na RDC mpe réactivation ya ba commissions mixtes spécifiques mpo kokokisa mokano ya kolendisa singa ya bondeko, coopération mpe boyokani oyo bisangisi bamboka na bango mibale mpe bitalisi bon voisinage," elakisi liyebisi ya bakonzi babale baye.

Félix Tshisekedi asukisi boye mobembo waye wa yambo liye limemaki ye na Luanda (Angola), Nairobi (Kenya) mpe na Brazzaville (Congo).

Kasi akokende dimanche na Addis-Abeba na 32e session ordinaire ya Union africaine mpe akosalsa kuna discours waye ya yambo lundi.

XS
SM
MD
LG