Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Epekisami ko importer mpe koteka mosuni ya ngulu ewuti na Union européenne na RDC


Jean-Lucien Busa, ministre d'Etat ya mambi Commerce extérieur, à Kinshasa, RDC, 27 janvier 2017. (Twitter/Rachel Kisita)
Jean-Lucien Busa, ministre d'Etat ya mambi Commerce extérieur, à Kinshasa, RDC, 27 janvier 2017. (Twitter/Rachel Kisita)

Ministre d’Etat ya Commerce extérieur, Lucien Busa, apekisi koimporter, koteka mpe koliya mosuni to produits nionso ya mosuni ya ngulu kowuta Union européenne na RDC.

Na mokano abimisi mardi, ministre ya Commerce extérieur alandi bokebisi ya Système d’alerte rapide pour les produits alimentaire et pour les aliments pour animaux (RASFF) ya le 19 novembre 2018.

Bileyi to ba denrées alimentaires biye bizali soupçonnées ya kopesa intoxication alimentaire mpe épidémie alimentaire, elobi M. Busa.

Mokano ya ministre eyebisi ba services nyonso masalaka na frontière ba consigner (batiya esika moko) cargaison oyo nionso ezali na ba produits maye.

XS
SM
MD
LG