Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

18e anniversaire ya liwa ya Laurent-Désiré Kabila


Président Laurent-Désiré Kabila ya RDC na Alger, le 29 avril 2000.
Président Laurent-Désiré Kabila ya RDC na Alger, le 29 avril 2000.

RD Congo ezali kokanisa lelo, 18e anniversaire ya liwa ya  nkondo président ya kala ya RDC bamobomaki na ebongana na ye, le 16 janvier 2001,

Garde du corps du corps too mokengeli na ye abetaki ya masasi kolonda procès liye lisalamaka na nsima ya liwa na ye.

Mwana na ye Joseph Kabila akitanaki na ye.

Laurent-Désiré Kabila azwaki bokonzi na nsima ya kokweyisa na bitumba régime ya président Joseph Mobusu Sese Seko Kuku Ngbendu oyo asalaki mibu 32 na ngwende ya RDC.

Avandaki na kiti ya bokonzi le 17 mai 1997 nsima ya sanza motoba ya bitumba. Azalaki mokambi ya lingomba ya batomboki AFDL (Alliance des forces démocratiques pour la libération) liye lisimbamaki na mapinga mpe bakonzi ya Rwanda, Ouganda mpe Burundi.

Amekaki na nsima kobengana mampinga ya Rwanda mpe ya Ouganda, bitumba misusu mobimaki. Mpe bomobaki le 17 mai.

Na suka ya bosambisi mpo na liwa na ye, bazuzi balobaki bolukiluki mosengeli kokoba.

XS
SM
MD
LG