Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Centre ya traitement ya Ebola mosusu ezikisami na Butembo


Centre de traitement ya Ebola ezikizami na Itav, Butembo, Nord-Kivu, 28 février 2019. (VOA/Ericas Mwisi)
Centre de traitement ya Ebola ezikizami na Itav, Butembo, Nord-Kivu, 28 février 2019. (VOA/Ericas Mwisi)

Centre de traitement ya Ebola (CTE) mosusu etumbami na Butembo na Nord-Kivu na baye basimba minduki bayebani te.

Likambo yango esalemaki na CTE Itav butu ya mercredi na jeudi.

Ba ONG, mabongisi mpe misala nyonso ya kobundisa Ebola balongwe na Butembo mpo na koboya mobulu liye.

Ministre ya Santé Oly Ilunga kutu akomi na esika liye.

Motuka ya Médecins sans frontières ezikisami na Centre de traitement ya Ebola na Itav, Butembo, Nord-Kivu, 28 février 2019. (VOA/Ericas Mwisi)
Motuka ya Médecins sans frontières ezikisami na Centre de traitement ya Ebola na Itav, Butembo, Nord-Kivu, 28 février 2019. (VOA/Ericas Mwisi)

Maire to mondele mboka ya Butembo, Me Sylvain Mbusa Kanyamanda, alobi policier moko akufaki na kati ya bitumba.

Ba malade ya Ebola mpe mingi bakimaki ntango ya bitumba.

Jeudi na ntongo, staff ya Médecins sans frontière ebimi na mboka Butembo mpona kobanga kokufa.

Lundi moleki, CTE ya Butembo-centre etumbaki mpe lisusu na baye basimba minduki bayebani te.

XS
SM
MD
LG