Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cenco esengi Tshisekedi koboya bizaleli ya mabe ya bakambi ya kala


Félix Tshisekedi azali kotiaya linzaka na boyakani esalamaki na nzela ya baepiskopo ya Catholiko na Kinshasa, 31 décembre 2016.
Félix Tshisekedi azali kotiaya linzaka na boyakani esalamaki na nzela ya baepiskopo ya Catholiko na Kinshasa, 31 décembre 2016.

Ba episkopo ya Cenco (Conférence épiscopale nationale du Congo) balobi bamoni to mpe balandi ndenge nini Félix Tshisekedi avandisami na bokonzi.

Basengi na mokonzi ya mboka ya sika alanda te lolenge ya mabe ya kala ya kotambwisa mboka kasi asala lolenge bana ya mboka bazali kozela, elobi Abbé Donatien Nshole kalaka mokonzi ya Conference épiscopale nationale ya Congo alimboli na elobeli ya VOA Lingala.

Cenco esengi Tshisekedi kosala mokano ya bana Congo
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:00:47 0:00

Cenco alobaki nsima ya maponami ete ba résultats maye masakolaki mpe moto abimaki elakisiaki bosolo ya mokano ya bana ya Congo te.

Mposo eleki na Bruxelles, cardinal Laurent Monsengwo, episkopo ya lokumu ya kala ya engumba Kinshasa, alobi bolele ete Martin Fayulu nde alongaki présidentielle kolanda bilembo Cenco ezali na yango.

XS
SM
MD
LG