Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bokono ya Chikungunya na Kinshasa mpe Kongo central


Mobeli moko na mobateli wa ye na lopitalo général ya Kikwit, na Kwilu, 17 mai 1995.
Mobeli moko na mobateli wa ye na lopitalo général ya Kikwit, na Kwilu, 17 mai 1995.

Motango ya bato bazuwi Chikungunya na engumba Kinshasa mpe na etuka ya Kongo central, eyebani naino te, kasi bokono yango mozali solo kongala ne bisika biye, kolonda bakonzi ya bokolongono na RDC.

Bokono ya Chikungunya ezali kongala na Kinshasa, engumba mokonzi ya RDC mpe na Kongo central, eyebisi bakambi ya INRB, Institut national des recherches biomédicales.

"Ba analyses ezali naino koselema, kasi tosili tozuwi ba résultats préliminaires maye mandimisi ete tozali solo na épidémie ya Chikungunya awa na Kinshasa mpe na zone ya santé ya Kasangulu na Kongo Central," eyebisi Dr. Chela Makiala, chef ya unité ya sérologie na INRB.

Bokono ya Chikungunya epesaka fievre, kolemba, mpasi na barticulations mpe moto mpasi. Epesamaka na ngungi.

Ezali mbala ya misato nde bokono liye mongali na RDC. Ebomaka mpenza te kasi elembisaka bato mpe etikaka bango nzela ya kosala mosala te. Epesaka bato bokakatani.

XS
SM
MD
LG