Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Beni, Butembo na Yumbi bakosala maponami ya ba Sénateurs, gouverneurs mpe vice-gouverneurs na nsima


Sénat ya RDC eyambi mokambi ya FMI (Fonds monétaire international) na Kisnhasa, 25 mai 2009.
Sénat ya RDC eyambi mokambi ya FMI (Fonds monétaire international) na Kisnhasa, 25 mai 2009.

Maponami ya ba Sénateurs, ba gouverneurs mpe ba vice-gouverneurs makopusana mpona ba circonscriptions ya Beni, Butembo na Yumbi, eyebisi Corneille Nangaa mokambi ya CENI.

Na linaka abimisi o’mokolo mwa yambo, Corneille Nangaa alobi ete maponami ya ba Senateurs, gouverneurs mpe na ba vice-gouverneurs makosalema kobanga le 6 tii 18 mars na bituka nyonso matikali.

Maponami ya présidentielle, législatives mpe ya ba assemblées locales masalemaki te na Beni, Butembo mpe Yumbi o’mokolo ya le 30 décembre moleki mpo na bokono ya Ebola mpe bozangi bokengi.

Nzokande CENI ebandaki kozuwa ba candidatures banda lobi moleki mpo na maponami ya ba Sénateurs, gouverneur mpe ba vice-gouverneurs.

XS
SM
MD
LG