Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato bayike bakimi boloko monene ya Tshikapa


Bato bayike pene ya mayi ya Kasaï, na libongo ya Tshikapa, République démocratique du Congo, le 28 juillet 2017.
Bato bayike pene ya mayi ya Kasaï, na libongo ya Tshikapa, République démocratique du Congo, le 28 juillet 2017.

Bato bayike bakimi na boloko monene na Tshikapa, na Kasaï na nsima ya attaque ya basimba minduki ya Kamwina Nsapu. Bayike bazoki.

Police na baye ya bokengi bazali koluka bakimi mpe masasi mazali kobetama.

Ba policiers mpe ba nzeneneke (témoins) kati ya boloko liye balobi ete babundi ya Kamwina Nsapu bayaki kosenga nzoto ya moko na bango awaki na boloko. Mpe mwa mobulu mokotaki.

Bato ya boloko bayike bakendeki nsima ya babundi baye. Babotolaki minduki ya ba policiers mpe babukaki ndaku ya bombani liye mpe bato mingi bakimaki, kolonda maloba ya police mpe baye ya boloko bayike batikali.

Bakimi bayike bazoki. Mingi kati na bango bamibombi kati na mayi ya Tshikapa. Kobamnga ezali ete bato baye babima te mpo police na bato ya bokengi bazali nzinga nzinga mpe bakimi baye bakoki kokufa na mayi, eyebisi moko nan a nzeneneke na VOA Lingala.

Masasi mazali kobetama na engumba Tshikapa.

Bayike ya babundi ya Kamwina Nsapu bazali kotika minduki mpe komipesa na bakonzi ya Tshikapa too Kananga. Kasi mpasi ezali mpo bazangi esika ya kolala mpe bilei. Yangao epesi nkwokoso ya bavandi ya esika liye.

XS
SM
MD
LG