Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Balandi ya Fayulu bakangami na Lualaba


Balandi ya Martin Fayulu basimbi elili ya mokambi na bango, na Kinshasa, 11 janvier 2019.
Balandi ya Martin Fayulu basimbi elili ya mokambi na bango, na Kinshasa, 11 janvier 2019.

Balandi bayike ya Martin Fayulu bakangami na etuka ya Lualaba na nsima ya komanifester. Bofundami na kasala mobulu, eyebisi Richard Muyej Mungez Mans, mokambi ya etuka ya Lualaba.

"Tango Fayulu alobaki akokenda na Cour constitutionnelle, azwi 62%, bango bazuwi pourcentage wana lokola ya solo. Ezalaki manupilation, intoxication. Babandaki kosepela mais alors kosepela na bango ezalaki ya désordre, ya pillage ciblé. Yango wana tokangi bango," elobi M. Muyej. "Bato balingaki kopiller (kopunza) to bapillaki (bampuzaki) tokangaki," elimboli gouverneur ya Lualaba.

Bato ya société civile balobi balandi mingi ya Fayulu bakangami mpe babetami na bisika biyike o’mokolo ya mposo mpe basengi na bakonzi kobimisa bango mpo basali eloko ya mabe tee.

Martin Fayulu oyo ayei na molongo ya mibale na maponami ya présidentielle, na 34,7%, na nsima ya molongi Félix Tshiskedi (38,5%), aboyi bilembo oyo CENI asakoli. Atiki recours na ye na Cour constitutionnelle o’mokolo ya mposo, asengi babandela koktanga ba bulletins de vote.

Alobi azuwi koleka 61%.

O’mokolo ya bosakoli ya ba resultats, bato bayike mpe basala mobulu kasi bakngamaki te.

"Bato ya Félix Tshisekedi basepelaki kasi violence to brutalité ezalaki te. Kasi bamama misusu balongolaki bilamba. Balobi ete basepelaka bongo epyai na bango. Tokangaki bango toyebisaki bango, tokebisaki bango," elobi Gouverneur Muyej.

Koleka 120 balandi misusu ya Fayulu bakangami na etuka ya Haut-Katanga, kolanda sociétécivile.

XS
SM
MD
LG