Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba étudiants batomboki lisusu lundi na Lubumbashi nsima ya liwa ya baninga na bango


Manifestation na Lubumbashi, RDC, 14 décembre 2011.
Manifestation na Lubumbashi, RDC, 14 décembre 2011.

Ba étudiants basalaki lisusu mobulu o’mokolo mwa yambo ya mposo mpo babobomaki baninga na bango dimanche na manifestation basalaki mpo na koboya bomatisi ya motuya ya keleasi.

Ba magasins mpe misala mingi ekangakaki ntango bayekoli ya biteyelo ya likolo ba batambolaki.

"Ba étudiants babukaki mwa biloko mpe bayebisaki bakolo na ba magasins bakanga. Balobaki été bazali kosala mobu mpo na liwa ya misato kati na bango na masasi ba policiers babetaki o’mokolo moleki," eyebi correspndant ya VOA Lingala na Lubumbashi.

Kolanda correpondant ya VOA Lingala, officier oyo atindaki babeta masasi akengamaki mpe azali kozela kosambisama, lokola président ya sika ya RDC, Félix Tshisekedi atindi.

Liyebisi ya Vita l Kamerhe, directeur ya cabinet ya président Tshsiekedi, esakoli ete ba étudiants misato mpe policier moko bakufi lobi na mobulu na Unilu (Université de Lubumbashi).

Nzoka nde mokonzi ya sika ya RDC, Félix Tshisekedi, asengi enquete esalama likolo ya liwa ya ba etudiants minei baye na Lubumbashi. Félix Tshsiekedi atindi liboso ya bazuzi officier oyo apesaki mitindo ya kobeta masisi, elobi liyebisi ya directeur ya cabinet na ye Vital Kamerhe. Mokano ya komatisa mbongo ya kelasi mpe etelemi. Mpe ministre ya Enseignement superieur mpe universitaire ye nde akopesa ndimbola liboso ya bokonzi mpo na ntina ya komatisa mbongo kelasi ya likolo.

Mobulu na Kinshasa

Na Kinshasa mpe ndenge moko. Bayekoli ya eteyelo ya likolo ISTA (Institut supérieur des techniques appliquées), bango mpe basalaki lundi mwa mobulu mpo na koboya motuya ya enrôlement oyo elongwe na pene na 9.000 FC tii koleka 16.000FC.

Ba policiers mpe bakitaki kuna mpe kimya ezongi.

Mobulu na Bukavu

Lokola mpe na Bukavu na Sud-Kivu, epayi wapi ba étudiant ya ISP (Institut superieur pedagogique) bango mpe batambolaki mpo na koboya motuya ya ba syllabus mpe bongo nyonso basenganga bango kofuta mpo na kotanga.

XS
SM
MD
LG