Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Abdoulaye Yerodia Ndombasi akufi


Yerodia Abdoulaye Ndombasi, vice-président ya kala na RDC na Conseil ya sécurité ya Nations unies, New York, 15 juin 2000.
Yerodia Abdoulaye Ndombasi, vice-président ya kala na RDC na Conseil ya sécurité ya Nations unies, New York, 15 juin 2000.

Moko kati ya ba vice-présidents minei na ntango ya transition elandaki dialogue intercongolais ya Sun City na Afrique du Sud, Yerodia Ndombasi awei na 86 ans.

Abdoulaye Yerodia Ndombasi akufi na ntongo ya mardi na hôpital ya Cinquantainaire na Kinshasa.

Azalaki Sénateur nsima na ya kozala vice-président banda 2003-2006.

Kasi asalaki mingi lokola mosungi ya president Laurent-Désiré Kabila oyo akweyiski elongo na AFDL bokonzi ya 32 ans ya president Mobutu Sese Seko.

Azalaki mpe ministre ya Affaires étrangères ya RDC.

XS
SM
MD
LG