Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Félix Tshesekedi asali malaise na discours na ye


Président Félix Tshisekedi na milulu ya bozuwi bokonzi na ye na etando ya Palais de la nation, na Kinshasa, le 24 janvier 2018.
Président Félix Tshisekedi na milulu ya bozuwi bokonzi na ye na etando ya Palais de la nation, na Kinshasa, le 24 janvier 2018.

Mokonzi ya sika ya RDC, Félix Tshisekedi asalaki malaise ntango azalaki kosala discours na ye yambo na simba ya kolapa seleka.

Malaise yango esalaki kaka 12 minutes.

Na kati kati ya discours na ye, Félix Tshisekedi akokati te koloba "Melesi". Abetaki mabaku mbala ebele. Alobaki “ezo zimba te".

Avandaki na kiti, bato babandaki kobondela Nzambe "na kombo na Yesu".

Nsimba na 12 minutes, Félix Tshisekedi atelemaki mpe azonkelaki discours na ye.

"Ezali émotions… Na sengi bolimbisi na tata mokonzi", elobaki Félix Tshsiekedi na bozongi na ye. Alobi ete asalaki mosala mingi banda camapgne éloctorale mpe na nsima na yango.

"Ngai Tshisekedi Tshilombo Felix Antoine... Naponami president de la République ya Congo. Nalapi seleka liboso ya Nzambe mpe ya ekolo, kotosa mpe kobatele Mobeko likonzi mpe mibeko ya mboka, ko batela mbosomi mpe mobimba ya etando na yango, kobatela bomoko, komitambua kaka na bolamu ya mboka mpe na botosi y aya bomoto, kotiya makasi na nga nyonso mpo na bolamu ya bato nyonso mpe mpo na kimya, mpe kolasa mosala na ngai lokola mosali ya ban aya mboka," elobaki Félix Tshsiekedi na seleka akataki.

XS
SM
MD
LG