Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etats-Unis epesi losako na mokano ya Cour constitutionnelle kasi esengi gouvernement ya bofungolami


Donald Trump mokonzi ya Etats-Unis apesi mbote, Washington, 19 janvier 2019
Donald Trump mokonzi ya Etats-Unis apesi mbote, Washington, 19 janvier 2019

Bakonzi ya Amerika basengi na gouvernement ya sika na RDC efungola bizipeli na baye politiki nyonso mpe epesa eyano na matata ya maponami.

"Tolingi kosolama na gouvernement ya sika ya RDC. Tosengi na gouvernement kokotisa, na bonene, baye ya ngambo mingi ya politiki mpe kopesa eyano na mbeba ya maponamu," etalisi liyebisi ya Département d’Etat.

Washington epesi losako na mokano ya Cour constitutionnelle liye endimi mpe pesakoli Félix Tshisekedi lokola 5e président ya RDC na 38,57%.

Bakonzi ya Amerika bapesi mpe losako na bana ya Congo mpo na mpiko na bitumba na bango mpo na mbongwana ya bokonzi na kimya mpe na démocratie.

Etats-Unis etondi président Jopseh Kabila botondi mpo kondima kozala mokonzi wa yambo oyo azali kotika bokonzi na kimya nyonso nsima na maponami.

XS
SM
MD
LG